paroles de chanson / Mike Kalambay parole / Eza yo lyrics  | ENin English

Paroles de Eza yo

Interprète Mike Kalambay

Paroles de la chanson Eza yo par Mike Kalambay lyrics officiel

Eza yo est une chanson en langue indéterminée

Eza yo moto osala elaka, kaka yo pe moto okokokisa yango
Po moko te na oyo oloba ezanga kokokisama Yesu

Eza yo, Eza yo hé
Eza yo, Eza yo

Oy’abenga nga ezali yo
Kombo na yo Fidèle
Nini obanda osukisa te
Yo Alpha pe Oméga
Ngonga na ngai na montre na yo
Ata na suka ekobeta
Lokola ebandi na yo, moi je le sais
Butu ekokota te oko mimonisa

Eza yo, Eza yo hé

Ozali to osi okeyi eh
Lobela ngai nayeba
Oyo mokili epimi ngai
Ezali na maboko na yo
Bilaka na yo Yahwe
Nabomba na motema
Eza yo nde oloba, o jura
Olaka yo okozala na ngai eeeh

Eza yo, Eza yo
Papa yonde oloba na ngai, okozala na ngai
Eza yo, Eza yo
Olobela ngai lisusu, oko tika ngai jamais
Eza yo, Eza yo
Papa yonde Mokonzi osopela ngai makila
Eza yo, Eza yo
Hé ! Yonde ! Molobeli na ngai epayi ya Papa
Eza yo, Eza yo
Eeeeh

Alléluia ! Où es-tu Le Dieu de la bible ? Je me demande oza to oza te ?
Ozo yoka nga to ozo yoka nga te ?
JEEEEESUS !

Ozali to osi okeyi eh
Lobela ngai nayeba
Oyo mokili epimi ngai
Ezali na maboko na yo
Bilaka na yo Yahwe
Nabomba na motema
Eza yo nde oloba, o jura
Olaka yo okozala na ngai

Eza yo, Eza yo
Yesu yonde elikya na ngai ya suka
Eza yo, Eza yo
Yonde moyoki, moyoki ya losambo na ngai eh
Eza yo, Eza yo

Ooooh hé !
Ekomi tango tosimba
Bilaka ya Nzambe
Alaka na baye
Bandima kotalela ye

Ekomi tango tomona
Bilembo ya Nzambe
Alaka na baye
Bapona kondimela ye

Na motema mobimba aah
Eza yo, Eza yo
Moko kaka aloba atikala kokosa te eh
Eza yo, Eza yo
Nazo yemba Fidèle, Fidèle na maloba na ye
Eza yo, Eza yo
Yahwe, Yahwe yonde, yonde mokolo elaka ah
Eza yo, Eza yo
Nga, nazo yemba Fidèle, Fidèle na bilaka na ye oh
Eza yo, Eza yo
Yahwe ! Bayaka epayi na yo, bazongaka se na nzembo
Eza yo, Eza yo
Papa yonde Mopangusi, Mopangusi ya pinzoli ya mitema
Eza yo, Eza yo
Nzambe ya lola eh, Tatuenda wa bana eh eyiiii
Eza yo, Eza yo

Hé ! Humm !

Ozali
To osi okeyi eh
Lobela ngai
Nayeba
Oyo mokili
Epimi ngai
Ezali
Na maboko na yo
Droits parole : paroles officielles sous licence Lyricfind respectant le droit d'auteur.
Reproduction des paroles interdite sans autorisation.

Commentaires sur les paroles de Eza yo

Nom/Pseudo
Commentaire
Copyright © 2004-2024 NET VADOR - Tous droits réservés. www.paroles-musique.com
Connexion membre

Se connecter ou créer un compte...

Mot de passe oublié ?
OU
CREER COMPTE
Sélectionnez dans l'ordre suivant :
1| symbole à droite de l'ampoule
2| symbole en haut de l'horloge
3| symbole en bas de la cible
grid grid grid
grid grid grid
grid grid grid